Paroles de Aliya

Koffi Olomidé
59331
Alya hee e, Mukaramè
"tala ye kuna minu mpembe
Koleka nzambala ya pape
Suki elingama lingama Alya hein"
OOO Alya o, po ete Alya na nga
Point faible na nga yo yee ye
Point fort na nga mpe yo e e Alya..
Bolingo esengi nga audience
Velo ya kimbambala kumba nga na malueka
Nakende kotala motshima na ngai
Mama bébé na ngai
Soucis soucis, soucis soucis
Etondi motema meke
Etie motema na nga tshobo
Oo kiti ekomi mbeto, loboko ekomi coussin
Alya hee e, Mukaramè
Melisa nga ata poison que oniokolo nga na mokili
Amour na ngai, kitoko ya nzete
Liboso mpe nasima eyebana te
Kaka ye amour nga ba projet ya suka nioso eza yo
Nakobatela yo aly pour toujours
Amour ya suka te Aly
éternité
éternité bolingo ewumela
Koleka temps
Fourmis azuaka po asala tour du monde
Heein hein amour ya vie nanga eza yo
Yo oza réponse
Ya motuna ezangaka eyano
Depuis époque
Ya Moïse, Abrahama na roi Salomon
Miso na nga
Etalaka yo Aly na ralenti
Crique oyo
Ezalaki na motema esi elongwe
Nazali awa lokola motuka oyo ezangi frein
Na descente moyen te na résister Aliya
"Nitu Mambu yaya, George Litu yaya mpe
Boyoka likambo ekwelinga leki na bino mokonzi mopawo
Mokolo mosusu bato ya contribution baye na ndako
Kaka ndenge ezalaka batala mwa ba bien
Mpo ba taxé nga nafuta mpako ya l'état
Na comprendre te tango mère aleki
Namoni kaka bakomi kosolola na litoyi
Babetaka babetaka ba machine
Nzoka, mère a beteka mpenza veut dire demarche
Ya mokolo oyo na kweyaka ndeke nga mokonzi
Normalement nga jusque là impôt ebandaki
Koya kaka ba 20à 40 oyo ya kala, mais mbala wana avis
D'imposition eya ba bambolanga mpenza ba 200 et quelques
Wana elingi koloba que kitoko ya mama ezali
Bino moko balakisaka te namoto ya mpako
Mama bimaka mais bimaka sukaka obe na balcon"
Huum yeh
Moto asalaka intérim ya sanza soki ebimi te
Moto oyo a remplacaka ba fleure na jardin soki e fané
Moto oyo ba proclama ye miss nanu a défilé te
Amour na nga Alya ah ah ma lumière qui ne faiblit jamais
Nakokaki kopesa raison Alyana
Na Adam soki akwesamaki ne eden pona beauté na yo
Mpo ata kolinga oyo epayi na nga ezalaki interdit
Na beauté oyo yahwe akelela yo jamais
Nakokaki kokanga motema
Mpo ekatisa ndelo
Alya nga vraiment na zo mituna
Est-ce que yo obotama te mokolo ba anjelu
Bakweyisa mapapu,
Nto mpe oza moto ayant tombée du ciel
Mpo ya yo beauté vraiment eza na ndoyi te
Ata
InterprèteKoffi Olomidé
LabelVIR
Paroles ajoutées par nos membresParoles ajoutées par nos membres