Paroles de Cheval

Koffi Olomidé
Y ozali se wa nga
Nazali se wa yo
Nakofuta na nga mbongo te
Oza ya ofele
Nakokima pe mbangu te
Oza pene na nga
Na ko luka pe zuzi te
Dossier eza nango vide
Yoza kumida oyo na boya ko kabola
Yoza nourriture oyo esalema se pona nga
Ata ami intime asengi ako zua te
Ata asilisi ba verset nyoso ya bible ako lala nzala
Ata atangisi pinzoli ti eko kahuka
Soki ozalaki ata etabe MAMADOU je t’assure
Na kobanga na nga te kobotola yo na maboko ya mokomboso
Plutôt qu un jour na ya kozangayo na ndimi liwa
Naza argile yo sculpteur maitre de l’œuvre
Forme nyoso okopesa nga nako ndima
Ata nazo cadrer te valeur na ngai artistique
Disproportion pe eza reconnue comme valeur artistique
Epayi ya ba plasticien
Simba simba nga gueye MAMADOU na zua forme
Yo moko obanda ba esquisses ko tika te
Moto mosusu aya ko achever œuvre na yo
De peur que œuvre e perdre purete n ango
Silisa nga yo moko
Matricule zero zero nazalaki
Na boyi ba tindika nga ata un milimetre ya pamba
Na boyi ko demarrer na horoscope fungola na maboko na yo
Retraite priere na nga nzambe asala ngai faveur
Un tient vaut mieux que deux tu l’auras
Bolingo na yo ekotisa ngai zala na miso ho
Ata pe mabe ya ngo eza yo signer presence
Nasi na latisa yo kozaka ya raison
Okomisa nga baba maloba nyoso omema
Otikela nga se je t’aime
Naza feuille vierge yo stylo lipasa na nga
Encre nyoso oko komela ngai nakondima
Aveugle kutu abetaka canne po amona nzela
Gueye okomisa nga aveugle MAMADOU canne omema
Na tikala se na yo
Gueye bolingo na pesa na yo eleki ata mosolo
Ata aba utiliser ba fonds ya fmi po ba corrompre nga
Na ko ndima na nga ko bengama mpiakeur
Richesse na nga se yo gueye mamadou
Soki ba bengi na riches tout ya mokili ba tie mituka
At aba bakisi b avions ya emirates, airways po na tika yo
Na ko ndima na nga obengama pieton nazala se na yo
To tambola tres colles tres serres
Gueye ata na ligne 11
Cheval na nga lover nga
Mema nga na mokongo
Beta nga kigi kigi
Gueye mamadou beta nga kigi kigi
Linga nga bolingo linga nga kigi kigi
Mamadou bolingo nay o vraiment soki ezalaki elamba ya ko lata
Na ko ndima na nga otingama na piece moko tout le reste de ma vie
Ata kutu john galiano a créer ba pieces prototype
Nako tingama na nga na polo se moko gueye lokola lucky luck
Gueye mamadou mema nga mema nga na mokongo
Love nga kigi kigi
Enfant du Senegal lover nga kigi kigi
Mema nga na mokongo mema nga
Ko koma bolingo na yebi ten a yebi se ko lover yo
Monsieur fidele akufa tika na profiter nga mademoiselle fidele
Sango akopesa diplome d honneur ya fidelite ya ngai na yo
Baye bayebi se se ko koma bolingo kasi diplôme bazwi te ho
Cheval na ngai mema nga tia nga na mokongo
Lover nga kigi kigi
Cheval na ngai lover nga tia nga na mokongo
Mema nga kigi kigi
InterprèteKoffi Olomidé
Paroles ajoutées par nos membresParoles ajoutées par nos membres