Paroles de La beaute d'une femme

Mbilia Bel
12407
Mbanda na nga na yokaka yé na sango
Lelo oyo to kutani, to monani nzoka azalaka boyé
Lokiti ya moto, oko yoka na mosika
Okomi tia ba idée ya zoba ebongi yo otala na miso
Na lala pongi té ako tinda tinda maloba
Na banzaki azali mwana ya nzambe nzoka azali mwana ya moto lokala nga
Lelo to kutani pona nini akitisi elongi afinga nga na mosika lelo amoni nga elobe ya mwasi
Pasi ya pamba, kufa tango yo nde moleki nzela
Tina nini na swana na yo kufa tango
Mobali aza na maboko na nga ba famille ba kangela nga yé
Sala nioso, buka nzoto yo sé moleki mama
Finga finga, tonga tonga nga sé nazali awa
Mobali aza mobali na nga akoki ko bougé ata moke té
Oko finga nga nzoto mobimba otiki ata ndambu té
Nako senga epayi nde epayi bato baso ba tala biso mawa na nga
Mabé na nga na nzoto mbanda ozali ko finga kaka na kanda
Nasé ya motema omiyebi ozali ata pembeni té yako meka nga
Kitoko ya mwasi eko kende sango soki mibali ba ko lula
Ya yo kitoko omikumisi nzoto na kati ya ndako yo moko mawa na yo
La beauté d'une femme ekende sango banda bo mwana té tango akoli
Na ndenge pé mibali epayi akola ba tambola moto ah mama
Oyebi mobali to ko wela demarche nini asala po akoma na nga
Depense nini asala po a battre ba susu
Matata nini azuwa po abala nga
Tuna sango pe ba yebisa yo
Oko finga nga nzoto mobimba po na swanisa yo o'vimba moto
Nga na bundisa yo po oyebana
Sango ekende nga na yo bo'mbanda
To mobali na nga a sambwa mama
Oko finga nga nzoto mobimba osilisa nga na quartier
O lati kombo ya mobali na nga lokola liputa ya metrage mawa na yo
Mabe ya nzoto na nga mbanda ozali ko finga kaka na zuwa
Epayi mosusu nga na yebi ba tiaka yo na tout droit na ba ninga basi
Kitoko ya mwasi ba ko ndimaka na ndenge mibali bako lula yé
Ya yo kitoko omisala confiance na tala tala ya ndako na yo mawa mama
La beauté d'une femme se mesure na ndenge bato ya mboka ba ko kumisa
Lokola ba kumisa kitoko na Menita na Miami mokili ba yoki
Oyebi mobali oko wela epayi nini ayuta po adondwa lelo
Ba pasi nini amona po akoma boye
Moniokoli to zuwa po akoma na mbongo
Ohh lelo ofingisa nga
Oko wela na nga bo'mbanda okuti mobali na kati ya bomengo
Oko lioka oko tonda oko finga nga
Oko kanga partout nga na yo bo'mbanda
Mama sala makasi po bo boyana té

InterprèteMbilia Bel
LabelIOD
Paroles ajoutées par nos membres